| Eza compétition té oyo tozoluka moko a gagner | 
| Eza love ya chouchou na chouchou na yé | 
| Bruce na Chuck Norris té | 
| (Bruce, Bruce, Bruce) | 
| Eza pé combat ya boxe té oyo tozoluka moko a ceder | 
| Eza love ya cheri na cherie na yé | 
| Ali na Foreman té | 
| Ali boma yé | 
| Ali boma yé | 
| Ali boma yé | 
| Yo’botoli nga mino mais opesi nga mokuwa | 
| Na fiba okomi lisusu kobotola nga yango | 
| Eh eh pourquoi Adolphe Muteba | 
| Boni yo ozo sala lokola olingaki nga po o prouver bato | 
| Osilisi nga lolendo nionso ya ki bomuasi na nga | 
| Avenue coin ti coin naleka bazo zomela ngai | 
| Okomisa nga papier, kimpwaka kutu bien | 
| Lukela nga esika nabatama soni omemisi ngai | 
| Soki na mayi nabetelaka ba mbisi lisolo | 
| Ya bolingo na biso avant ba lala | 
| Mpo na zamba lion akondima té | 
| Noki té lisolo na nga elelisa yé | 
| Ba niama bakobanga yé lisusu té | 
| Na mboloko akobanda koboudé yé | 
| Yé roi mobimba atangisi pinzoli | 
| Bayebi té lion azolela po lionne akoki 'osala yé pé bongo | 
| Oh Adolphe Muteba tshilamwina | 
| Lukela esika nga nakobombama soni oyo | 
| Na likolo ba ndeke bakoloba na yé ko espionner bango | 
| Na mabelé makelele bakoyebisa ba nkusu bazui chida | 
| Nzoka naza vivante | 
| Babombaki nga pona kokima soni ya mokili | 
| Après babosani tranche epayi bakundaki | 
| Ngai yango ngai nakeyi na nga | 
| African James Bond, DJ Droba on est ensemble | 
| Ata kutu virus, balukela yango antivirus | 
| Moto asala bolingo nzambé mais apesa biso mode d’emploi té | 
| Yango tozelaki yesu aya 'bala po biso to mona | 
| Lolengé ya ko vivre na bolingo | 
| Yé pé nkolo yesu abalaki na yé té | 
| Yango tokoma ko tatonner eh | 
| Yango tokoma ko débrouiller eh | 
| Ezui ezui, ezui té ezui té | 
| Mungwa ata ebungi e noyer na bileyi | 
| Etikaka b’indices, ba traces na lolémo | 
| Mais yo banda yo olimwa ata indice té na nzoto | 
| Na miso disparu, wa wa wa | 
| Sans le savoir que ezali liwa na nga (X2) | 
| Liwa ya moto… | 
| Adolphe awa okomi oluka okima nga | 
| Mbeto ekokomela nga munene lokola stade ya football | 
| Santé na nga ekokoma muke lokola ballon | 
| Butu ekokomela nga molayi pé somo trop | 
| Yo moto o réduisaka souffrance ya vie na nga oza wapi yango | 
| Adolphe mutebe tshilamwina | 
| Nalingaka yo, oyebi yango bien | 
| Nabengaka yo chouchou ya motema | 
| Pourquoi ozosala nga boyé Adolphe | 
| Napesa yo bolingo nabakisa matabisi ya vie na nga | 
| Sango ata aza boboto mais soki apesi communion | 
| Longola makanisi ya kosenga matabisi | 
| Na beleli, beleli, beleli, beleli, beleli na bayé bakufa kala | 
| Bayé bakufa na b’accidents | 
| Bayé bakufa na malaria | 
| Bayé bakufa na masasi | 
| Bayé bamiboma po na mbongo | 
| Basengela biso epayi ya yahweh | 
| Po bango bavandaka pene na yé | 
| Ameka ko réduire douleur ya bayé bakufaka na pasi ya bolingo | 
| Po aloba bolingo eza yé | 
| Nzambe azali bolingo, nzambe azali bolingo | 
| Ata kutu virus, balukela yango antivirus | 
| Moto asala bolingo nzambé mais apesa biso mode d’emploi té | 
| Yango tozelaki yesu aya bala po biso to mona | 
| Lolengé ya ko vivre na bolingo | 
| Yé pé nkolo yesu abalaki na yé té | 
| Yango tokoma ko tatonner eh | 
| Yango tokoma ko débrouiller | 
| Eh, ezui ezui, ezui té ezui té | 
| Adolphe pourquoi ozosala boyé muteba | 
| Mungwa ata ebungi e noyer na bileyi | 
| Etikaka b’indices, ba traces na lolémo | 
| Mais yo banda olimwa ata indice té na nzoto | 
| Na miso disparu, wa wa wa | 
| Sans le savoir que ezali liwa na nga (x2) |