| Singa oy’a la vie eza na maboko ya Nzambé | 
| Yango soki okosala na motema na loboko | 
| Ata ba ninga ba yo bazongisi yo mabe | 
| Nzambe akotika yo té | 
| Akopesa yo loboko | 
| Okokende liboso, ngomba mon ami se yo | 
| Ah nga nga maman, balingaka ngaï té | 
| Ah nga nga maman, batongak’o ngaï | 
| Ah nga nga maman, bafingaka nga | 
| Nazanga bolingo, boboto ya bato | 
| Nazango kutu na bondeko | 
| Zamba na zamba | 
| (Kaka kokana nga) | 
| Bisika nyoso | 
| (Se ko se ko finga nga) | 
| Bisika nyoso ya nga, balekaka ngaï | 
| Nzela nyoso oyo bakendaka awa na se | 
| Mopaya zoba | 
| (Nazalaka se ko mopaya) | 
| Batalaka nga | 
| (Na liso ya litsho) | 
| Basalaka semblant | 
| (Na présence na nga) | 
| Bongo ya ndeko, kombo ya ami se kobengaka nga se na monoko kasi na mitema té | 
| Na sala boni, baloba qui cherche trouve | 
| Mama Amy na weï | 
| (Weï, weï) | 
| Mama Amy na weï | 
| (Weï, weï) | 
| Singa oy’a la vie eza na maboko ya Nzambé | 
| Yango soki okosala na motema na loboko | 
| Ata ba ninga ba yo bazongisi yo mabe | 
| Nzambe akotika yo té | 
| Akopesa yo loboko | 
| Okokende liboso, ngomba mon ami se yo | 
| Lisumu oyo nga nasala, nakoluka nayeba té | 
| Ngaï nsomi ya Ami, nga motema na nga mpembé | 
| Nga papa na Rocky, ngaï papa na Minou | 
| Na swanaka té, nga nabundaka mpe té | 
| Soki kofinga, matongi eleki botutu ekosimba nzoto té | 
| Soki kofinga, moto mpé eleki moto yango akokoma héros | 
| Boya, boya koboma | 
| Nazali awa | 
| Bokoki kobonga té | 
| Boya se koboma | 
| Nakoki kokima té | 
| Boya koboma | 
| Mama Amy na weï | 
| (Weï, weï) | 
| Ah Mama Amy na weï | 
| (Weï, weï) | 
| Mambo Lesgo na kati yango | 
| Mawa | 
| Nakamata putulu ya ba wa | 
| Nasala na ngo ngomba | 
| Na mata na talaka, liwa na nga na mosika | 
| Niongo ya nani naza na ngo | 
| Aloba na futa | 
| Kombo na nga etik’ozala sukali na minoko ya batu | 
| Mama na yokeli yo mawa | 
| Mokolo ya kufa na nga | 
| Okozala kolela nga na mipanzi feti | 
| Nga mwana obota ba yina nga, mawa trop | 
| Nga nabokolaki nyoka, aswi nga na meme | 
| Diamant ata okumbi ya ngo dix ans na poto-poto | 
| Salité jamais ekosimba | 
| Nga motema na nga pembe | 
| Nga mwana Aguepa motema blanc | 
| Mama na yokeli yo mawa | 
| Mokolo ya kufa na nga | 
| Okozala kolela nga na mipanzi feti | 
| Nga mwana obota ba yina nga | 
| (Mawa trop, mawa mingi) | 
| Nioso stène nalela | 
| (Mawa mingi) | 
| Sebene… |